jeudi 5 avril 2012

Mokanda mwa Pásika mwa Tatá Episkopo

«Kristo óyo asili asewki, akokúfa lisúsu elokó te» (Rm 6, 9) Áwa tosekwi na Kristo, tokota o etumba ya Ye ya Bolingo mpô ‘te Wɛlɛ ezwa bomoi solo solo.

Bandeko ba bolingo, Eyenga elámu ya Pásika na bino banso. Mokónzi Yezu óyo abuki bokási bwa liwâ mpó ya libela, abimisa biso o butú ya bobangi. Apesa biso ngúyá ya kobima na bokabwani bonso mpô ‘te tomitiya lisangá mpô ya kotɔnga Wɛlɛ yasika, ndenge Mokónzi alingi ‘te tozala na bomoi (Jn 10, 10).

Bandeko, Soko otamboli na Wɛlɛ, elokó ekokamwisa yo libosó ezalí biloko Nzambe akabeli biso: mái, ebelé ya mái na mbísi izalí na káti; zámba, ebelé ya zámba, na nzeté mpé nyama izalí kuna; bisika ya kolóna… elokó mpé ya mibale ekokamwisa yo ezalí ya komóna mpási ya bato. Bato bazali kobunda bangó móko na káti ya mpási ndenge na ndenge.

Soko oyebi mwa moke lisoló ya Wɛlɛ okoyeba ‘te na libandela, bato bayɔnkwamakí ming ina misala ndenge na ndenge ya mpási; misala ya copal, misala ya mpémbe ya nzɔku, b.n.b. elokó elekaki lisúsu mabe ezalakí ndenge bazalakí kobɛtɛ bato, kokáta maboko ya basusu, koboma basúsu. óyo wana nde lisoló ya biso ya mpási. óyo wana mpé esika bobangi mpé bokabwani bokoteli basusu. Kási malembe malembe áwa Liloba ya Nzambe likoteli mpé mokili ya biso, tozwí bomoi bwa sika.

Bandeko, mpási ya lɛlo ezalí komonisa mpé biso ‘te ata tozali na káti ya Liloba, makambo ya kala ya bokabwani, ya bobangi, ya minyoko, makambo mana masili naino te. toyebi ‘te esika bato bakabwani, esika bato bazali na káti ya bobangi, na káti ya minyoko, mokili ya bangó mókoki kokende libosó malámu te.

Elikya ezalí mpô nzéla ya libiki ezalí. toyóka. Biso banso toyebi ndenge Nzambe na maboko ma Moise abimisi bána ya Israel na boumbu (Ex. 3, 7-10). toyebi ndenge Nzambe akáti bondeko na bangó, áwa ayebisi bangó ‘te Ye móko Nzambe akosimba bomoi ya bangó, akozala ntángo inso mpé bipái binso libiki ya bangó. Akopesa bangó mokili ya bangó móko, mokili motondi na biloko. Kási Nzambe asengi mpé bangó ‘te bakoma bandeko káti ya bangó na bangó; pe mokili bazwi mókoma mpô ya bolámu ya bangó banso (Ps.136, 21-22). Nzambe amonisi bangó bongo ngúyá ya ngɔlu ya, ye ya bolingo ya ye ( Dt 7, 6-8), bolingo ya molende.

Yezu óyo abotami o ekolo ya Israel, azali yemei mwana wa bolingo ya tatá (Mt 3,17), temô (monzeneneke) ya bolingo bwatatá mpô ya bato banso. Yezu amemi bolingo ya tatá libosó libosó na bato babwakamaki, batiamaki pembeni lokola basumuki, bato ya maba, bato bakufa makolo bakufa miso, bato ya misala ya pamba lokola bakengeli mpata... mpô ya kobikisa bangó Yezu abangi te kobuka mobeko ya sabato; abangi bafariseo te na bateyi ba mobeko te áwa bazali kotongo Ye mpô akolia esika móko na basumuki (Lc 15, 1-2). «Bomoi ya moto boleki mobeko ya sabato» (Mc 3, 1-5); ngɔlu ya tatá ezalí mpô ya bato banso, lokola moi na mbula izalí mpô ya bato banso (Mt 5, 44-45).

Tee na káti ya mpási ya Ye tee liwa, Yezu aboyi kozongisa mabe na mabe; alimbísi babomi ba Ye (Lc 23, 34). Abundi solo etumba ya Bolingo tee na káti ya liwa. Bokási ya bolingo ya ye bobuki bokási ya liwa. Asekwi mpé atondisi mokili na bokási ya bolingo, bokási ya bomoi. Alongi etumba ya Bolingo.

Bandeko, toyebi ‘te Yezu alongi etumba ya Bolingo bobele mpô ya ye móko te; kási lokola Yaya ya bayekoli ya ye ya kala mpé ya biso lɛlo. bangó lokola biso lɛlo, tokimaka makambo mpé topanzanaka soko makambo mabebi. Kási Ye atikaka biso te. Ye apesi biso, lokola apesaki bayekoli ba kala, ngúyá ya ye mpé alobi ‘te akozala na biso mikolo minso kin’o nsuka ya molongo (Mt 28, 16-20). «Bokende»... lokola tatá atindaki ye, ye mpé atindi biso (Jn 20,21). Azali mpé na káti ya etinda tozwi.

Etinda tozwi ezalí mpé ya kobunda etumba ya Bolingo.toyebi ‘te tokolonga yangó. tokolonga yangó mpô ngúyá ya bolingo, óyo eleki ngúyá ya liwa, ezalí na biso. tokolonga yangó mpô toyebi ‘te Mokónzi azali na biso, azali mpé na káti ya lisoló ya bomoi ya biso ya Wɛlɛ. Mbongo, bokonzi bwa nse na bisengo binso bizalí biloko bikoleka, lokola baye banso batiyi elikya ya bangó mobimba likolo ya byangó (Ps. 115, 4.8).

Eyenga ya Pásika ezalí ya solo eyenga ya «victoire» (lilongi) ya Bolingo, eyenga ya bomoi. Bobele bolingo bokolonga liwa. Tomikotisa bongo na káti ya etumba ya bolingo mpô Wɛlɛ ezwa bomoi solo solo. tomikotisa na ngúyá ya Yaya’ Yezu-Kristo mpé lisangá.

Na nkombo ya Ye moto alongi etumba ya bolingo,
  • tomikotisa , bandeko, lisangá o etumba ya kopesa na bato banso lokúmu ya bomoto ya bangó. tokanisa áwa (epái ya biso) na bandeko Batwá, na bandeko bazali na boloko, bato ya maladi ya libomá...
  • tomikotisa lisangá o etumba ya boyókani, ya bomóko : na káti ya bikólo na mabota; tofungwama na bandeko basúsu! totikala kokangema te bobele na bato ya biso móko.
  • tomikotisa lisangá o etumba ya bosémbo na makambo matali ba mama veuves (bakufa mibali) na bana bitíke; makambo ya bosémbo na tribunal mpô ya babola; bosémbo mpô ya biloko Nzambe apesi biso lokola zámba. toboyi corruption ya ndenge inso.
  • tomikotisa, bandeko, lisangá o etumba ya makambo makonyata to makokitisa bomoto ya bandeko batau... «moto azali moto». Yangó wana toboyi matungisi manso ya bandeko basoda to ba polisi maye masalemi mpô ya koluka mbongo. Yangó ezalí kolembisa mpiko ya bato mpô ya mosala.
Mokili óyo Nzambe apesi biso alingi te ‘te totíka yangó ebeba mpô ya bobangi ya biso to mpô ya boluli biloko tǒ lokumu bokoleka. Moto akosa biso te. Áwa tosekwi na Kristo, tokota o etumba ya Bolingo bwa Ye. Yemei «Elombé ya bomoi» akamba biso ntángo inso o káti ya nzéla inso ya bomoi bwa biso. tokoma bongo «Bato ba bomoi», bato bakopesa baninga mpé mokili ya biso bomoi solo.

Eyenga elámu ya Nsekwa o nkombo ya Mokónzi.
Ye móko apambola mpé abenisa biso.

Tatá Episkopoko Philippe Nkiere Kena,
Episkopo wa Inongo.

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Commentaires en français et en lingála sont acceptés. Il doivent être signé. Avant la publication, ils sont lus par la rédaction.