jeudi 20 décembre 2012

Bobótola bato mbɔ́ngɔ te mpé bofunda bato na ndéngé ya lokutá te

Jean azongiselakí bangó na evanjile ya lomíngo gaudete : «Bobótola bato mbɔ́ngɔ te mpé bofunda bato na ndéngé ya lokutá te; kási botálela káka lifuti na bínó.» 

Ebelé ya bato batunaki yé: «Esengeli tosála níni?» Jean azongisakí: «Moto óyo azalí na kazáka míbalé, apesa móko na óyo azángí yangó. Moto óyo azalí na biloko ya kolía asála mpé ndéngé móko.» Bafútisi mpáko bayakí mpé mpó na kozwa libatisi; bongo batunaki Jean: «Motéyi, tosengélí kosála níni?» Azongiselakí bangó: «Tángo bofutisaka mpáko bobákisa mbɔ́ngɔ mosúsu te likoló ya óyo batíndaka! Basodá mpé batunaki yé: «Bongo biso, tosengélí kosála níni?» Jean azongiselakí bangó: «Bobótola bato mbɔ́ngɔ te mpé bofunda bato na ndéngé ya lokutá te; kási botálela káka lifuti na bínó.»

Bato bazalákí kozela na elikia monéne mpé bangó nyonso bazalákí komituna-tuna na nsé ya mitéma, soki Jean azalí Kristo. Jean azongiselakí bangó nyonso: «Ngai nazalí kobátisa bínó na mayi, kasi moto moko azali koya, aleki ngai na nguyá, mpé nazalí ya kokoka kutu te mpó na kofungola basinga ya ba sandale na yé. Yé moto akobátisa bínó na Molímó Mosántu mpé na moto.» Asimbí kiyungulu na maboko na yé, akopetola esika na yé óyo batutelaka mbuma; mpé akobomba ble na ebombelo na ye; kasi akotumba matíti na moto móko óyo ekúfaka te! Jean azalaki kolendisa bato mpé azalakí kotéya bangó Sango-Malámu na maloba mosúsu míngi. (Luka 3.10–18)

 

* ** *** ** *
Comme c’est fréquemment le cas au cours de l’Avent, saint Jean Baptiste est sous les feux de la rampe. Souvent, il est dépeint comme un prédicateur au caractère colérique, qui faisait peur aux gens pour les amener au repentir. C’est une caricature! Tout d’abord cette conception n’explique pas comment il a été capable d’attirer à lui des foules si nombreuses et de gagner tant de cœurs. Et ensuite, cette conception passe à côté de l’essentiel de son message qui est que le salut est tout proche, sur le point de se réaliser. C’est exactement à l’opposé d’un message prétendument noir, pessimiste, menaçant.
Mais le salut ne tombe pas du ciel comme la pluie: Ce sont les gens, nous tous, qui doivent changer notre comportement: N'exigez rien de plus. Pas de madeso mwa mwána. Ne faites ni violence, ni tort à personne. Le salut vient, quand nous nous tournons vers le Christ et nous changeons notre comportement. Sinon, Noël n'aura pas lieu cette année, mais la crise et la misère résteront jusqu'à la mort..
P. Martini o.p. 

Pour ne pas manquer une édition d'Itimbiri ya Sika, renouvelez déjà aujourd'hui votre abonnement pour 2013 – payable comme d'habitude au numéro au distributeur ou au dépot. Listes disponible dès maintenant dans tous les dépot du journal et chez les distributeurs. Lecteurs en Belgique doivent s'insicrire sur internet par courriel: http://itimbiri-sika.blogspot.com. Ce service est offert à la diaspora par Sika Sika SPRL, Aketi, Bas-Uele. Si vous apréciez lire ce journal en ligne, ne manquez pas de passer à l'imprimerie à Aketi (PO) lors de votre prochain voyage au pays pour visiter les lieu et faire un petit don qui permet d'acheter des unités Celtel/Airtel pour la publication régulière.
Cet article fut publié par Itimbiri ya Sika le jeudi, 20 décembre 2012 à Aketi, Bas-Uele.

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Commentaires en français et en lingála sont acceptés. Il doivent être signé. Avant la publication, ils sont lus par la rédaction.