jeudi 28 mars 2013

Biléi ya Nkóló

Pámba téé, matéya napesákí bínó, nazwákí yangó epái ya Nkóló. Na butú wana batekaki yé, Nkóló Yezu akamataki lipa, apesákí Nzámbé melesi, akatakikatakí yangó, mpé alobaki boye: «Óyo ezali nzóto na ngáí, napesí yangó pɔ na bínó. Bosálaka boye pɔ na kokanisaka ngáí.»

Ndéngé móko mpé, tángo balálisí kolía, akamátí kɔpɔ mpé alobí boye: «Kɔpɔ óyo ezali kotía Boyókani ya sika; napesí makila na ngáí pɔ na kokokisa yangó. Mbala nyɔnsɔ bokobanda komɛla yangó, bosálaka boye pɔ na kokanisaka ngáí.» Boye, mbala nyɔnsɔ bokozala kolía lipa óyo mpé komɛla kɔpɔ óyo, bokobanda kosakola liwâ ya Nkóló, tii mokolo ye akozonga.

na Santu Polo

paru dans Itimbiri ya Sika du 28 mars 2013
© 2013 Sika Sika SPRL, Aketi



Vous avez de la parenté à Kinsásá, Amérika, Erópa? Dites leurs de s'inscrire à itimbiri-sika.blogspot.com pour recevoir chaque semaine des nouvelles du pays par courriel.

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Commentaires en français et en lingála sont acceptés. Il doivent être signé. Avant la publication, ils sont lus par la rédaction.