jeudi 17 décembre 2009

Mokama ya liboso na Niangara-Isiro

Na bokuse, historique ya Jubilé ya mibu tuku itano ya Diocèse Isiro-Niangara ekolimbolama ndenge kani? Tokokí banso komikundola ‘te ut’o nsuka ya mobu 2003 tee ebandela ya mobu 2004, tosepelaki mibu mokama ya liboso (premier centenaire) mwa bopalinginyi Nsango Ndamu o Diocèse ya biso. Esalamakí bongo na bokanisi fondation, o mboka Gombari, ya premier poste ya Mission, fondation etiyamakí na Ba-Prémontrés ba Tongerloo (Bɛ́ljika) mwa 09.11.1903. Nzokande likambo lya Bopalinginyi Nsango Ndamu likeseni na mambi ma bokeli Diocèse. Mpo etalí kokela Diocèse Isiro-Niangara, mwa historique yango iye.

Histoire ya Diocèse Isiro-Niangara ebandí na mbotama ya Préfecture Apostolique ya Wɛlɛ ya Likólo mwa 18.12.1911. Préfecture Apostolique yango eutakí na bokaboli «Préfecture Apostolique» ya Wɛlɛ . Wɛlɛ ezali mai maye makei tee, ndakisa, Diocèse ya Bondo.

Nsima, mwa 06.05.1924, Préfecture Apostolique ya Wɛlɛ ya Likólo ekomí «Vicariat Apostolique» ya Niangara.

Mwa 24.02.1958, Vicariat Apostolique ya Niangara ekobota Préfecture Apostolique ya Doruma (na bokaboli Vicariat Apostolique êna). Nsima ya mbongwana eye, Vicariat ya Niangara ekoumela molai te mpo ‘te akoma lisanga lisusu: kozala Diocèse.

Ya sôlo, mwa 10.11.1959, Vicariat Apostolique ya Niangara, lolenge la basusu bayike o Kongó, ekokoma «Diocèse» ; ut’o mokolo môna, ekobyangama «Diocèse ya Niangara»; mpo ‘te ebonga ya Episkopo ezalakí o mboka Niangara. Diocèse ekobyangama «Diocèse ya Isiro-Niangara» banda mwa 23.03.1970, mokolo ebonga to siège épiscopal ekolekisama o Engumba ya Isiro.

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

Commentaires en français et en lingála sont acceptés. Il doivent être signé. Avant la publication, ils sont lus par la rédaction.